(Verse)
Na ngambo ya Egypito molili ehh
Na ngambo ya Israël polé ebimi ehh
Bisika Yesu aza eyébanaka
Présence na Yé, polé na ngai
Sanduku ya mibéko ékéyi wapi ehh
Ekéyi kopambola Obed Édom ehh
Bisika Yésu aza ébunganaka té ohh
Présence na Yé, lipamboli na ngai
Ah yaya
(Chorus)
Yésu azali awa
Yésu azali awa
Yésu azali awa
Yésu azali awa
(Verse)
Esalaka ngai neti liboma eh
Soki Yésu na ngai akiti awa
Nayébaka té napésa yé nini
Nionso nazali éza sé Yésu
Andima ngambo ya bomoyi na ngai ehh
Andima ngambo ya mikumba na ngai
Andima ngambo ya bitumba na ngai ehh
Bolingo ya boyé namona te ohh
Ba misusu ba mata ti na ba ngomba ehh
Ba belela Yé, ayoka bango té
Ngai na tomboli kaka maboko ya pamba
Akiti mbangu ayoka losambo ehh
(Chorus)
Yésu azali awa
Yésu azali awa
Yésu azali awa
Yésu azali awa
(Verse)
Na ngambo ya Egypito molili ehh
Na ngambo ya Israël polé ebimi ehh
Bisika Yesu aza eyébanaka
Présence na Yé, polé na ngai
Sanduku ya mibéko ékéyi wapi ehh
Ekéyi kopambola Obed Édom ehh
Bisika Yésu aza ébunganaka té ohh
Présence na Yé, lipamboli na ye
(Chorus)
Yésu azali awa
Yésu azali awa
Yésu azali awa
Yésu azali awa
(Verse)
Soki yo té mbele na kufa na ngaï
Soki Yo te mbele nasila na ngaï
Yo nde nionso ya motuya na ngai ehh
Ehh Yaya
Mobimba na ngai se maya na Yo
Mobimba na ngai se ngolu na Yo
Ondimela ngai tango moto andima ngai te
Ngai nalingi Yé
Yo nde nionso ya motuya na ngai
Soki Yo te mbele nakufa na ngai
Zalaka pene na ngai êêê
Eh! Yaya