(Verse)
Natali na bomoyi na nga na yoki pasi yaya
Tuna nga nini yaya esengo ezali te
Na tali na libota na nga na yoki pasi emati
Tuna nga nini yaya kimia ezali te
Na kanisi bilaka na yo eh olobaki esengo ngolu eko tambola na nga ezali wapi
Ngonga epusani eh
Ko lela eleki eh
Olobi nini Nzambe pona bomoyi na nga
Mokili ya monene boye ekalami na liloba na yo
Nini ango ezo zanga po loba ya nga pasi esila
(Chorus)
Nzambe na nga ozali wapi Nzambe nanga
Est ce que oyoki te
Nzambe na nga na tuni wapi Nzambe na nga
(Verse)
Natali na mobongo na nga na yoki pasi emati
Tuna nga nini yaya bofuluku ezali te
Na tali na ligomba na nga na yoki pasi emati
Tuna nga nini yaya bolingo ezali te
Na kanisi bilaka na yo eh olobaki esengo ngolu eko tambola na nga ezali wapi
Motema etutani eh kolela eleki eh
Olobi nini Nzambe pona bomoyi na nga
Mokili ya monene boye ekalami na liloba na yo
Nini ango ezo zanga po loba ya nga pasi esila
(Chorus)
Nzambe na nga ozali wapi Nzambe nanga
Est ce que oyoki te
Nzambe na nga na tuni wapi Nzambe na nga
(Verse)
Awuti zamba alembic
Tala elobi nga yoyo
Likolo ya bileyi ya kolia
Esaü ateki bo yaya
Na wutaka musala na yo
Na zongaka maboko pamba
Mokili etalisi nga bomengo
Na boyi ko teka bokristo pona yo
(Chorus)
Nzambe na nga ozali wapi Nzambe nanga
Est ce que oyoki te
Nzambe na nga na tuni wapi Nzambe na nga
(Verse)
Ozali nzete nga etabe
Nioso ya yo ezali pe ya nga
Olati nkembo lokola elamba
Nga na lati mawa lokola kasaka
Na luki na yeba esengo nde nini
Bozuwi pe nini
Na taleli yo
(Chorus)
Nzambe na nga ozali wapi Nzambe nanga
Est ce que oyoki te
Nzambe na nga na tuni wapi Nzambe na nga