Reconnaissance Chords by Marie Misamu

  • Post category:Lingala
  • Post comments:0 Comments
  • Post last modified:September 10, 2025

(Verse)
Boseka ngáí té pô naza na bibiliya na maboko
Esíká nionso na kokende,
kombo ya Nzámbe na monoko na ngai’oyo
Basáli ya Nzámbe óyo baza kotéya bísó tango nionso,
boyébi té níni óyo Nzámbe
Asalela bangó pô basálelaka yě, eh
Okomona ngáí tango nionso na nzelá káka ya ekelézya,
oyébi té níni óyo Nzámbe asalela nga
pô na kendaka eklezya, eh-eh

(Verse)
Ah-ah, motó kutu óyo ya mokili
sókí apésí yo eloko osengi merci, eh-eh
Ebongo Nkóló ya pema, eh, to pessi yě níni
Okomona ngai tango nionso naza ko kombola eklézya
Oyébi té níni óyo Nzámbe
asalela nga pô na salelaka yě, yě, yě,

(Chorus)
Ah-ah-ah, ngai-oh
Nazali reconnaissante, eh-eh-eh
Makambo asalela nga ya minene papá óyo, ho-oh
Na wuti na libúlú ya masumu abímísí ngai’oh
Esika na zalaki ya liwa eh abimisi ngai'oh
Mikolo na ngai ya ko vivre ekomaki nde ya kotanga’eh
Pongi na ngai na butu, káka ba ndoto ya mabé
Nani akopesa nga loboko, motó na motó na óyo ya yě
Nakanisaki libota na nga ekosunga nga epesi nga nde mokongo
Nasimbaki moto na kolela ngai,
pasi elekelaki ngai-oh, Nzamb’oyo eh (x2)

(Chorus)
Ah-ah-ah, ngai-oh
Bomoni tina ngai na lingaka ye
Na lapa ndayi na vie na ngai-oh, nakosalela ye-eh-eh
Abetaki ekuke ya motéma na ngai, na fongoli akoti
Ye wâná camarade ya motéma na ngai-eh, eh, eh, Nzamb’oyo
Motó na motó na ngónga na ye
Abetaki ekuke ya motema na ngai na fongoli akoti

(Chorus)
Yě wâná camarade na ngai-oh
Yě wâná thermomètre ya température na ngai-oh-oh
Yě wana mayi na nga ya komela ekitisaka nga motema
Yě wâná bileyi na nga ya koliya na tango ya nzala-eh
Yě wâná menteau na nga-oh, na tango ya malili eh
Ye wana makasi na ngai-eh, tango na lembaka-eh, pap'oyo-eh
Ye wana réanimation ya pema Misamu, yeh, yeh, yeh, Nzamb’oyo
Ye wana parapluie na ngai-oh, na tango ya mbula
Ye wana kisi na nga ya komela na tango ya maladie
Ye wana asilisa pási na ngai-oh, pap’oyo-oh eh
Ye wâná alongola soni na ngai-oh, pap’oyo-eh, Nzamb’oyo
Ye wana parapluie ya Christian Likasi-eh-eh

(Chorus)
Ah-ah-ah, ngai-oh
Bomoni tina nga na yembelaka ye
Na lapa ndayi na vie na nga yo na kosalela ye-eh
Abeta ekuke ya motema na ngai na fongoli akoti
Ye wana camarade ya motema na ngai-oh, oh, oh, pap’oyo
Motó na motó na ngónga na yé
Abetaki ekuke ya motéma na ngai na fongili akoti
Ye wâná camarade na ngai-eh eh-eh-eh
Ye wâná moninga na nga ya motéma-yeh-eh-eh
Ye wâná makási na ngai-eh
Ye wâná mayi na nga ya komela
Ye wâná vie na nga mobimba

Leave a Reply