Ozuaka Nkembo Chords by Gael Music

(Chorus)
Ozuaka Nkembo na makambo nionso lolenge Olingi
Ozuaka Nkembo Yaya (x4)

(Verse)
Na mabele oyo tozo niata, tomoni yango putulu ya pamba na misu ya batu
Ozuaka Nkembo Yaya
Ata na ngungi oyo moustique ya pamba lelo abotami sima mua mikolo mikié akufi
Ozuaka Nkembo Yaya
Na ba situations ya ko lela pe ba situations ya ko sepela Papa
Ozuaka Nkembo Yaya
Wana nazo traverser vallée ya baca pinzoli na nga ezo sopana kaka pona Yo
Ozuaka Nkembo Yaya
Na ba situations oyo ya pasi pe ba situations oyo etiaka moto na kimya
Ozuaka Nkembo Yaya

(Chorus)
Ozuaka Nkembo na makambo nionso lolenge Olingi
Ozuaka Nkembo Yaya (x2)

(Verse)
Na ba soirées ya boye ya sanjola mosusu ayé na maladie, ayaki pamba te
Ozuaka Nkembo Yaya
Ba situations ya la vie oyo ewumela ekomi koleka biso kutu na âge, tellement eza ya kala
Ozuaka Nkembo Yaya
Na ba circonstances epesaka banguna tina ya ko tiola biso tongo, midi pe pokwa
Ozuaka Nkembo Yaya
Na aveugle oyo amonaka te lisumu ya tata te, maman te, ya ye moko kutu te
Ozuaka Nkembo Yaya
Ata mua mungwa batié na sani ba bwaki na mayi sima mayi e fandi na kimya
Ozuaka Nkembo Yaya

(Chorus)
Ozuaka Nkembo na makambo nionso lolenge Olingi
Ozuaka Nkembo Yaya (x4)

(Verse)
Na ba vases ya purifications batié pembeni, ba lengeli te pona fête
Ozuaka Nkembo Yaya
Na mwana mukié ya suka ya famille batika na zamba, moto moko te akanaki akoma mokonzi
Ozuaka Nkembo Yaya
Na soyi ewuti na munoko esangami na putulu, otié na misu ya mutu… Nkolo
Ozuaka Nkembo Yaya
Na lingenda esi ekawuka, liboso na mayi, mayi ezo tosa na facilité
Ozuaka Nkembo Yaya
Ata na mwasi ya ndumba ya Jericho okana ye po O sala bolamu na peuple na Yo Yaya
Ozuaka Nkembo Yaya

(Chorus)
Ozuaka Nkembo na makambo nionso lolenge Olingi
Ozuaka Nkembo Yaya (x2)

(Verse)
Ata transport nazuaki pasi pasi, na yelaki awa pamba te Yaya
Ozuaka Nkembo Yaya
Ata na ba difficultés protocolaires po na fanda, nayebi Oza na likanisi na suka na yango nionso
Ozuaka Nkembo Yaya
Ata na ba difficultés ya ba professeurs ba côtes ezo monana te, nayebi Nzambe aza na kati
Ozuaka Nkembo Yaya
Ata batu ba décevoir kino na fandi mais Nzambe ayebi ndenge nini ko kotisa ba reserves
Ozuaka Nkembo Yaya
Ata na joueur oyo aza na classement te nzambe aza na projet ya ko gagner match elongo na ye
Ozuaka Nkembo Yaya

(Chorus)
Ozuaka Nkembo na makambo nionso lolenge Olingi
Ozuaka Nkembo Yaya (x3)

Leave a Reply