Oza Mosantu Chords by Moise Mbiye

(Verse)
Esengo etondaka motema na ngai
Esika ba santu basangani
Basemboli maboko likolo
Lola na nzambe efunguama
Esengo etondaka motema na ngai
Esika ba santu basangani
Basemboli maboko likolo
Lola na nzambe efunguama

(Verse)
Eklezia etondisamaka na nkembo eh
Soki batindi nzembo ya mosantu eh
Mobali kitoko amati
Atelema na ngwende na ye
Eklezia etondisamaka na nkembo eh
Soki batindi nzembo ya mosantu eh
Mobali kitoko amati
Atelema na ngwende na ye

(Verse)
Elekela mayele na ngai
Ba mpaka baboyi kosala semblant
Balobi mitole esimbi na bango te
Bamemeli yo nkembo libela
Elekela mayele na ngai
Ba mpaka baboyi kosala semblant
Balobi mitole esimbi na bango te
Bamemeli yo nkembo libela

(Verse)
Osalaka ndenge nini eh, bakangami bamona loboko na yo
Kombo na yo sabaoth bitumba nioso obunda olonga
Osalaka ndenge nini eh, bakangami bamona loboko na yo
Kombo na yo sabaoth bitumba nioso obunda olonga

(Chorus)
Oza mosantu eh
oza mosantu eh
Okokani na moto te, eh yaweh
Obonga na bonzambe, eh yaweh (x3)
Na bonzambe na yo eh
Yo obonga na bonzambe na yo eh
Yo obonga na bonzambe na yo eh
Yesu yo obonga na bonzambe na yo eh
Yesu yo obonga na bonzambe na yo eh
na bozindo na yo eh
na bozindo na yo eh

(Chorus)
Oza mosantu eh
oza mosantu eh
Okokani na moto te, eh yaweh
Obonga na bonzambe, eh yaweh
Watshi jila eh
Watshi jila eh
Kabuena waku wewa eh yaweh
Kutumbibue bakayeba eh yaweh
You’re the holy God
You’re the holy God
Nobody is like you my lord eh yaweh
You are worthy to be praised eh yaweh
Tu es saint saint saint
Tu es saint saint saint
Personne ne peut t’egaler eh yaweh
Tu es digne d’être adoré eh yaweh
Oza mosantu eh
Oza mosantu eh
Oza mosantu na lola
Oza mosantu eh
Nani azua esika na yo eh yaweh
Okonza motema na nga eh yaweh

Leave a Reply