(Verse)
otelemi na fukami
otetuami nami kitisi
epayi nayo nde nazui bomoyi
ya libela seko na seko
oyo olobi nde nako Tosa
oyo olaki nde na kosimba
oyo osali nako bomba te yesu
kumisama nzambe n’a mawa eh
natatoli na bomoyi na nga eh yesu nde mokonzi
(Verse)
ofandi na motema na ngaï
na esika yo obulisami
epayi oza ngaï pe na zali
yanga na yo ekosila te
moninga oyo ya tango nionso
ngolu nazwui nde koyeba yo
yonde yo sengeli pona nga
yesu yaya yoza malamu eeh
natatoli na bomoyi na ngaï yesu nde mokonzi
(Chorus)
na lingi na nga masiya
na poni n’a nga se yo eeh
oyo akota nga na motema
kaka yo papa osilisa nga posa
ya mokili likolo ya bolingo na yo eh
kaka yo papa eh yesu eeh
(Verse)
liziba ya mayi na bomoyi
efandelo ya babulisami
ekuke ya njela na Lola
bolingo ya bolenge bwa ngaï
na tanga te kombo mosusu
pene pene ya kombo na yo
lokola yo ako wuta wapi
epayi na yo nionso ekoki
na tatoli na bomoyi na nga
yesu nde mokonzi
(Chorus)
na lingi na nga masiya
na poni n’a nga se yo eeh
oyo akota nga na motema
kaka yo papa osilisa nga posa
ya mokili likolo ya bolingo na yo eh
kaka yo papa eh yesu eeh
(Chorus)
na tatoli na bomoyi na nga
yesu nde mokonzi