(Verse)
Na ko kima wapi
Ngai na kanisi bomoyi na ngai
Mabe ngai na sali oh Nkolo
E lukeli nga makambo
Na zangi kimia esengo na nga
E bongani nga mawa
Papa yo limbisa ngai
Papa yo Nzambe na ngai
(Chorus)
Nga nako kende epayi na Papa
Nga nako ndima mabe na nga
Nga nako loba na ye Papa
Limbisa mabe na ngai
Nga nako loba na ye lisusu
Ngai moko na koki tse
Papa simba bomoyi na ngai
Limbisa mabe na ngai
(Verse)
Na ko koka na ngai tse
Ko mipangusa ngai moko
Yango nga na ye epayi na yo
Yokela nga mawa
Kanisa misala na Yesus
Kuna na ekulusu
A sopaki makila na ye
Ete nga na limbisama
(Chorus)
Nga nako kende epayi na Papa
Nga nako ndima mabe na nga
Nga nako loba na ye Papa
Limbisa mabe na ngai
Nga nako loba na ye lisusu
Ngai moko na koki tse
Papa simba bomoyi na ngai
Limbisa mabe na ngai