Motema Na Nga Chords by L’Or Mbongo

(Verse)
Motema na nga
Na bonzeli Yo
Bomoyi, ngolu ewuti epayi na Yo
Elikya na nga, Ezali sé Yo Yesu
Yamba loyembo na bonzeli Yo

(Chorus)
Motema na nga
Na bonzeli Yo
Bomoyi, ngolu ewuti epayi na Yo
Elikya na nga, Ezali sé Yo Yesu
Yamba loyembo na bonzeli Yo (x2)

(Verse)
Na tomboli misu na ngomba
Lobiko na nga eko wuta wapi?
Lobiko na nga ezali sé Yo Yesu
Yamba Loyembo nga nabonzeli Yo

(Verse)
Nayembela Yo na munoko nini?
Botika nga, na ngumbamela Ye
Ye Papa na nga, abatelaka nga
Na ngumbameli Yo na motema na nga

(Chorus)
Motema na nga
Na bonzeli Yo
Bomoyi, ngolu ewuti epayi na Yo
Elikya na nga, Ezali sé Yo Yesu
Yamba loyembo na bonzeli Yo (x2)

(Verse)
Moto moko te ako koma Nzambe
Kasi Yo Nzambe okomaki moto
Olati nzoto, obikisi biso
Yamba loyembo nga yembeli Yo

(Verse)
Mosika oyo, Y’olokoti biso Yesu
Mosika na Kinsenso
Nani ayebaki nga?
Bobele Yesu, Y’oyebaki nga
Y’obimisi nga, Nkolo Y’obengi nga

(Chorus)
Motema na nga
Na bonzeli Yo
Bomoyi, ngolu ewuti epayi na Yo
Elikya na nga, Ezali sé Yo Yesu
Yamba loyembo na bonzeli Yo (x2)

(Verse)
Kati na mayi, Y’ofungoli nzela
Kati na wuma, Y’obimisi nga
Nzambe nani oyo, akokani na Yesu
Aza bolingo, Nzambe kitoko

(Verse)
Bayebisi yo, y'oko bota te
Yebisa bango, mopesi na bana
Aza na bomoyi
Alalaka te
A nimbaka te
Ye alalaka te

(Verse)
Na machine ya fufu
Biso tolalaki kozanga bileyi
Toyebi pe yango Yesu na nga
Nani asunga nga?
Amonanaki te
Bobele Yo Yesu na nga
Yesu olokoti nga

(Chorus)
Motema na nga
Na bonzeli Yo
Bomoyi, ngolu ewuti epayi na Yo
Elikya na nga, Ezali sé Yo Yesu
Yamba loyembo na bonzeli Yo
Yamba loyembo na bonzeli Yo
Yamba loyembo na bonzeli Yo
Yamba loyembo na bonzeli Yo

Leave a Reply