Moninga Malamu Chords by Gael Music

(Verse)
Molingami malamu
Balingaka pona bozui te
Balingaka pona bizaleli
Yango nabengi Yo Moninga
Na lisolo ya bolingo
Maloba ezalaka na nguya
Oyo etondi motema
Suka se mbebo ebimisa
Kozala na Moninga malamu
Ezali bozui na tango ya mpasi
Moto akosungaka yo
Soki mpasi ekomi
Na motema nalapi ndayi
Pona Yo nakosala nionso
Ekoki na moto kosala
Olanguisi motema na ngai

(Chorus)
Yesu eh eh eh
Yesu eh eh eh
Yesu eh eh eh
Yo Moninga malamu

(Verse)
Opekisa makambo etungisa ngai
Pomobembo ya nga na Yo
Esalema na kimia
Toleyisana mbuma bolingo
Napesa Yo masanjoli
Okitisa kembo na Yo
Nabika kati na Yo
Ponayeba Yo na mozindo
Nawuti na bapota ya deception ya mokili
Naza nanu na se ya emotion
Monoko na nga eza nanu kilo
Molimo yekolisa nga masanjoli
Nakokaka kofanda kimia te
Soki batangi kombo na Yesu
Motema epeli nga moto
Posa nafukama nasanjola

(Chorus)
Yesu eh eh eh
Yesu eh eh eh
Yesu eh eh eh
Yo Moninga malamu (x2)

(Verse)
Naza nanu elenge na bolingo
Nayebi kolinga te
Olanguisi motema na ngai
Yesu Moninga malamu
Nabenga Yo na kombo nini?
Nabenga Yo Papa na bana
Fololo ya motema
Yesu elengi ya motema

(Chorus)
Yesu eh eh eh
Yesu eh eh eh
Yesu eh eh eh
Yo Moninga malamu (x2)

(Verse)
Opekisa makambo etungisa ngai
Pomobembo ya nga na Yo
Esalema na kimia
Toleyisana mbuma bolingo
Napesa Yo masanjoli
Okitisa kembo na Yo
Nabika kati na Yo
Ponayeba Yo na mozindo
Nawuti na bapota ya deception ya mokili
Naza nanu na se ya emotion
Monoko na nga eza nanu kilo
Molimo yekolisa nga masanjoli
Nakokaka kofanda kimia te
Soki batangi kombo na Yesu
Motema epeli nga moto
Posa nafukama nasanjola

(Chorus)
Yesu eh eh eh
Yesu eh eh eh
Yesu eh eh eh
Yo Moninga malamu (x2)

Leave a Reply