Mongongo Na Yesu Chords by L’Or Mbongo

(Verse)
Motema na ngai ekumisa Yo
Nakende wapi soki na Yo te
Tango motema ekomaka na suka
Opesaka ngai eyano

(Verse)
Ata na pasi na kotika Yo te
Natingama na ngai kaka se na Yo
Otelemisaka makolo na ngai
Esika basusu bazinda

(Verse)
Ata namoni nzela eza molili
Na kobanga molili ya nzela te
Olakisaka ngai nzela
Esika natia lokolo

(Verse)
Na mboka na ngai toza kosela
lisungi ekowuta epayi na Yo
Na mboka ya Congo totatoli ete
Oza Nzambe na bolingo

(Chorus)
Mongongo na Yo
Ebukaka ba ngomba
Na bomoyi ya bato
nionso ekotosaka Yo
Mongongo na Yo
Molimo etosaka
Tokomi balongi kaka pona kombo na Yo
Naza moto n’esengo
Se pona kombo na Yo
Na koyembela Yo
loyembo ya motema na nga

Leave a Reply