Losambo Chords by Fiston Mbuyi

(Chorus)
Losambo nde mopanga, eko silisa bitumb’oyo
To zeli yo to tié motéma
Kombo n’o na lokuta to yoka
Losambo nde mopanga, eko silisa bitumb’oyo (Ya famille)
To zeli yo to tié motéma
Kombo n’o na lokuta toyoka té oh
Oh yaya hmmm ah ah ah ah
Oh yaya, ya bomoyi eh

(Verse)
Mituna ebele ezo sila
Na mopepe eboy’o ningisa nzete
Elikia etuni nga soki to continuer
Alliance osala na nga elongoli ko banga
Ngai ya ngani awa na banda nayo bo mwana
Na tikelo nini ata bitumb’oyo elekeli ngai

(Chorus)
Losambo nde mopanga, eko silisa bitumb’oyo
Na lembi té na tié motéma
Kombo nayo na lokuta na yoka té
Losambo nde mopanga, eko silisa bitumb’oyo
Tozeli yo totie motema
Kombo nayo na lokuta na yoka té

(Verse)
Ozali Nzambé ya bomoyi eh (ah-ah-ah)
Okosa nani eh yaya?
Yaya, ya bomoyi eh (ah-ah-ah)
O’escroka nani eh, na vie?
Ya bomoyi eh (ah-ah-ah), Nzamb’a bomoyi eh
Ô deseva nani eh yaya?
Nzamb’a bomoyi eh
Papa ya bomoyi eh
Minganga ba lobaka maladie’a maman
Eko bomisa ye, mais tala ndenge esili awa eh
Kombo no na lokuta toyoka te
Esika ba monaka nga ko kweya o telemisa nga
motéma e tatoli eh
Kombo n’o na lokuta to yoka té
Tu m’as promis de le faire
Dans mon cœur je le sens et je le sais
Kombo n’o na lokuta to yoka té
Na losambo mur’oyo Jéricho eko kwey’awa eh, ko kwey'awa
Kombo n’o na lokuta to yoka té
Kak’esika ba tchoubi likonga
Nde esika lipamboli ebimeli eh
Yango na yembi losambo

(Chorus)
Losambo nde mopanga (mopanga na nga eh), eko silisa bitumb’oyo
Nga naza sé n’ango, to zeli yo to tié motéma
Kombo n’o na lokuta to yoka té
Na yoka té oh
Na yoka té oh nga oh
Kombo n’o na lokuta to yoka té
Na mona té oh
Na mona té oh nga oh
Kombo n’o na lokuta to yoka té

(Chorus)
Losambo nde mopanga, eko silisa bitumb’oyo
Toz eli yo to tié motéma
Kombo n’o na lokuta to yoka té

Leave a Reply