(Chorus)
Oza Nzambé na bolingo
O bongi na lokumu
Yahweh lokumu eza ya Yo (×2)
(Verse)
Sala nga na yeba eh, baposa ya Motema na Yo
Loba nga na yoka eh, mabanzo ya molimo na Yo
Bongo nga na kokisa Papa eh, baposa ya Motema na Yo eh
Bongo nga na loba maloba eh maé ekosimba Yo
Loba nga na yoka eh, mabanzo ya molimo na Yo
Simba nga na ningana eh, na nguya ya Loboko na Yo
Bongo na misopa Papa eh, mabolongo na sé na sanjola aaah
Na mitika Yahweh, liboso na Yo
(Chorus)
Oza Nzambé na bolingo
O bongi na lokumu
Yahweh lokumu eza ya Yo (×2)
(Verse)
Sala nga na mona eh, nguya ya loboko na Yo
Mimonisa na kamwa eh, nkembo ya Bonzambé na Yo
Bongo nga na tatola Papa eh, Makoki na Yo Mosantu eh
Bongo nga na sanjola yaya eh, na lolenge olingio
Mimonisa na kamwa eh, nkembo ya Elongi na Yo
Simba nga na lenga eh, na nguya ya Loboko na Yo
Bongo nga na loba maloba eh, na maé oyo na moni na Yo
Bongo nga na sanjola yaya eh, monene na Yo
(Chorus)
Oza Nzambé na bolingo
O bongi na lokumu
Yahweh lokumu eza ya Yo (×2)
(Verse)
Sala nga na tatola eh, nguya ya Loboko na Yo
Kokisa na yemba eh, bilaka ekoma loyembo o
Nde nge Yo osalaka Papa eh, yango nde ekoma mabina
Bongo nga na tatola Papa eh, na mabota nionso
(Chorus)
Oza Nzambé na bolingo
O bongi na lokumu
Yahweh lokumu eza ya Yo (×2)
(Ebandeli pé suka na nionso Lokumu eza ya Yo eh)Yahweh lokumu eza ya Yo
(Mokokisi na nionso Papa, lokumu eza ya Yo eh) Yahweh lokumu eza ya Yo
(Ba honneurs, ba acclamations ebongi na yo Papa) eh Yahweh lokumu eza ya Yo
(Malasi ya kitoko pé ya valeur na sopi yango na makolo na Yo) Yahweh lokumu eza ya Yo
(Motole ya nkembo, elamba ya lokumu ebongi na yo mokeli na nionso eh) Yahweh lokumu eza ya Yo
Yahweh Lokumu eza ya Yo