Gethsemane Chords by Henri Papa

(Verse)
Na Getshemane yomeli nkeni oyo
Ya minioko mawa mpe pasi
Ondimi kokoma lisumu
eloko oyo osala nanu te
Yo moto owumeli na bosantu
Ebanda boni yo okoma lisumu?
Yaya na nga obongi na yango te
Eza nga nga nde na meritaki
soni oyo eh eh eh eh eh eh

(Verse)
Nakanisi nzela ya ekulusu
Yango ponini bato ebele boye
Basangeli moto se moko
asali bango nini eh?
Tala mosusu akamati soyi
ya ebele na monoko na ye
Asopi yango se na elongi,
Elongi oyo ya mwana na pate
Oyo amesana koseka
oyo amesana kolimbisa
Yaya na nga obongi na yango te
Eza nga nga nde na meritaki
soni oyo eh eh eh soni oyo eh eh eh

(Chorus)
Tango nazalaki na masumu
Masiya ondimi liwa eh
Ozui penza esika na ngaï
Nga mpe makomi mosantu
Tika lelo nayebisa yo
Oh! Jésus, tu es tout pour moi

(Verse)
Bolingo nde elongoli yo na lola
Yango nde ekitisi yo na se eh
Kaka bolingo eniokoli yo boyé oh
Et tu es mort au nom de l’amour.
Olongoli kazaka ya bokonzi
Olati elamba ya mosali
Kasi bato oyo olingaki mingi
Babaluki babeti yo fimbo eh
Ekulusu kilo na mokongo
Ondimi etumbu ya liwa ye
Yaya na nga obongi na yango te
Eza nga nga nde na meritaki
pasi oyo oh oh
pasi oyo o
na meritaki yango oh
na meritaki pasi oyo

(Verse)
Ozelite nabongola motema
To pe nayeba yo nanu
Kasi Tango nazalaki na masumu
Masiya ondimi liwa eh
Ozui penza esika na ngaï
Ngaï pe nakomi mosantu
Tika lelo nayebisa yo
Oh! Jésus, tu es tout pour moi

(Chorus)
Tango nazalaki na masumu
Masiya ondimi liwa eh
Ozui penza esika na ngaï
Nga mpe makomi mosantu
Tika lelo nayebisa yo
Oh! Jésus, tu es tout pour moi

Leave a Reply