Desormais Chords by Shekinah Mpiana

  • Post category:Lingala
  • Post comments:0 Comments
  • Post last modified:September 8, 2025

(Verse)
Yoka mongongo na ngai
Nazo yemba po na yo
Soni’elataki vie na ngai
Opikola na mosisa
Oyo na komi lelo
Nguya loboko na yo
Malgré pinzoli etangi ngai
Motem’ezo yemba yo
Tala bolamu na yo Yahweh eh esilisi milelo na vie na nga

(Chorus)
Yango désormais N’esika nga na lela
Na memeli yo loyembo ya motema na nga (x3)

(Verse)
Yesu olobaki na nga
et’okotambola na nga
Ata mokili elobi’otiki nga
Motema ebateli kimia Hum
bisika na komi lelo eza nguya
loboko na yo Awa pinzoli etangi nga yo
Yango na yembeli yo Ozo zala Yahweh eh
Ozo zala na vie ngai
Yango désormais N’esika nga na lela
Na memeli yo loyembo ya motema na nga (x3)

(Chorus)
Eh Nzambe ya ngolu na memeli yo loyembo ya motema na nga
Eh Nzambe ya ngolu na memeli yo loyembo ya motema na nga
Yesu yamba loyembo ewuti na motma libonza na memeli yo nzambe na nga
Papa yamba loyembo ewuti na motma libonza na memeli yo po obongi

(Chorus)
Yango désormais N’esika nga na lela
Na memeli yo loyembo ya motema na nga (x3)

(Chorus)
Bolingo ya motema na nga eh
Yesu oza nde bolingo motema na nga
Soni ya libota na nga eh
Yesu opikola soni ya libota na nga
Kolela bomwana na nga eh
Yesu osilisa kolela ya bomwana na nga
Koseka ya ba nguna na nga eh
Yesu osukisi koseka ya ba nguna na nga
Desormais N’esika nga na lela
Na memeli yo loyembo ya motema na nga

Leave a Reply