(Verse)
Pesa Nga Motema ya Job nga bowumbu na yo
Nakoki kofinga kombo na yo te, ata ba pasi eluti ngai
Naza lokola okati ya ebale monene bokati ya masuwa
Eza kotiola moyen na katisa ezali te. Elikia se na yo
Oh liboso na bungisaki ebele na mbala moko
Consolation ya bato, ekokaki te, ata ba mbongo to mpe nini
Baninga na nga nionso bakimaki ngai
Ndenge nga na komaki ba mokili ba kanisaki mabe
Namikangeleki na ndako na kima menace ya bato
Na komaki komituna, Nzambe mpo na nani osalaka boye
Pasi nionso kaka ngai et pourtant na salelaka yo
Sima ya nionso wana moninga na nga ya motema akeyi
Yango na sengi na Yesu pesa nga motema ya Job
(Verse)
Pesa Nga Motema ya Job nga bowumbu na yo
Nakoki kofinga kombo na yo te, ata ba pasi eluti ngai
Naza lokola okati ya ebale monene bokati ya masuwa
Eza kotiola moyen na katisa ezali te. Elikia se na yo
Oh liboso na kufelaki ebele na mbala moko
Consolation ya bato, ekokaki te, ata ba mbongo to mpe nini
Baninga na nga nionso bakimaki ngai
Ndenge nga na komaki ba mokili ba kanisaki mabe
Namikangeleki na ndako na kima matongi ya bato
Na komaki komituna, Nzambe mpo na nani osalaka boye
Pasi nionso kaka ngai et pourtant na bangaka yo oh oh
Sima ya nionso wana moninga na nga ya motema akeyi
Yango na sengi na Yesu pesa nga motema ya Job
(Chorus)
Yesu, Yesu, Yesu nga muwumbu na yo kotika nga te
Yesu, Yesu, Yesu ga nasengi na yo motema ya Job
(Verse)
Pasi ya motema na nga moto ayebi te oh,
Nalela ngo na nani, Molimo mosantu consoler nga
Awa ba botoli nga nionso ba tiki nga na nini eh
Yesu eh batela ko ndima na nga ah
(Chorus)
Yesu, Yesu, Yesu nga muwumbu na yo kotika nga te
(Verse)
Pinzoli etangi nga na miso oh
Choc eleki makasi yaka osunga ngai
Ata ba kofinga, ata ba kotonga,
Ata ba koyina nga natingama se na yo Yesu eh
(Chorus)
Yesu, Yesu, Yesu ga nasengi na yo motema ya Job
(Chorus)
Yu yu yu yu yu kolela na mpasi nani ayokela na mawa
Nalela na nani bongo akawusa pota na nga
Maloba motema na nga emati na yo libondeli na nga