(Chorus)
Yo Nzambe oyo
Ima yo Nzambe oyo
Ima yo Nzambe oyo
Ima yo Nzambe oyo
Ima yo Nzambe oyo
papa na nga eh (yo Nzambe oyo)
papa ya bana eh (yo Nzambe oyo)
okosaka tw ima (yo Nzambe oyo)
olobaka ya solo papa (yo Nzambe oyo)
(Verse)
yo Nzambe oyo, ima yo Nzambe oyo
Ima yo Nzambe oyo papa olobaki okosala eh,
Papa olobaki okosala eh, papa na tamboli pe mingi oh,
Papa ba fingi ngai mingi oo, papa motema ekomi kobanga,
Papa na komi kolenga eh, papa olobaki okosala eh
Kati na bomoi na nga eh papa ba temoins bazalaki eh
Tango olakaki nga oyo eh papa olobaki okosala eh
Papa sembola loboko eh (yo Nzmabe oyo)
Papa yo Nzambe oyo eh
yo Nzambe oyo
(Verse)
Yo Nzambe oyo
Ima Yo Nzambe oyo, ima Yo Nzambe na ngai oh
Papa nafandaki na ngai oh, Papa nayebaki Yo te oh
Papa Y’oluki nga Marie eh, Papa Y’olobi nakosala eh
Ngai nakosala na elanga na Yo eh, Papa natelemi nabandi kosala
Papa makambo ekokisama, Papa nazeli pe mingi oh
Papa naluki na losambo eh, Yesu Y’olobi na ngai nini eh
(Chorus)
Yo Nzambe oyo (Papa bana eh Yo Nzambe oyo eh)
Elikia na ngai Papa (Yo Nzambe oyo)
Mosungi ya kokamwa eh Yo Nzambe oyo
(Verse)
Yo Nzambe oyo Ima Yo Nzambe oyo,
Papa tala bato ebele oh
Papa baye koluka Yo eh, Papa baye kotala ngai te oh
Papa basusu bazangi kobota, Papa basusu baza na malade
Papa basusu bazangi misala, Papa basusu bazangi kimia eh
Papa baye koluka Yo eh, basusu bakangami na milimo mabe
Papa Yo sembola loboko ima, ngai nagangaki nalobaki eh
Yo nde oh Nkolo ya libiki ima, Yo nde oh Nkolo ya misala ima
Papa nakomi kobanga eh, Papa nakomi kolenga eh
(Chorus)
Yo Nzambe oyo (Papa sembola loboko ima eh)
Yo Nzambe oyo (Papa sembola loboko ima eh, banguna bakamwa ima eh)
Yo Nzambe oyo (Banguna bamona ima oh, Papa sembola loboko ima eh)
Yo Nzambe oyo (Papa sembola loboko ima eh, Papa basusu bazangi misala)
Yo Nzambe oyo (Papa basusu bazangi kobota, Papa basusu bazangi kimia eh)
Yo Nzambe oyo (Yo nde Nkolo ya kimia ima eh, Yo nde Nkolo ya kimia)
(Pre-chorus)
Papa zua nga mosali na Yo, zua ngai mwana te oh
Nasali Yo mabe mingi oh, pasi elekeli ngai oh
Nasengaki bambongo na ngai oh, bomengo na ngai nionso eh
Nakendaki mosika na Yo, nasilisi yango na ambiance oh
Nakomi kolia na bangulu oh, kolala kaka na bangulu oh
Natali boye ngai nalobi, nazonga ndako ya baboti
Natali boye ngai nalobi, nazonga ndako ya baboti na nga
(Chorus)
Ima oh naye na Yesu eh (Po ete nabika oh)
Ngai oyo nazongi ndako eh (Po ete nabika oh)
Ngai oyo nazongeli Papa (Po ete nabika oh)
Yawe zua ngai ata mosali nasokolaka Yo makolo Nzambe (Po ete nabika oh)
Oh zua ngai ata mosali nakombolaka eklesia Nzambe (Po ete nabika oh)
Zua ngai ata mosali napanguisaka ba bancs na eklesia eh (Po ete nabika oh)
Zua ngai ata mosali nasalaka oyo olingi nasala eh (Po ete nabika oh)
(Chorus)
Ngai oyo naye na Yesu eh (Po ete nabika oh)
Ngai oyo nazongeli Papa (Po ete nabika oh)
Papa esika nawuti namoni pasi mingi Papa na ngai eh (Po ete nabika oh)
Ngai oyo nazongi ndako ya baboti (Po ete nabika oh)
Ngai oyo naye na Yesu eh (Po ete nabika oh)
Papa na ngai atinda nga, mema nga esika olingi nakotosa eh (Po ete nabika oh)
Ngai oyo nazongi ndako eh (Po ete nabika oh)
Yesu oyo sala na ngai olingi (Po ete nabika oh)
Zua ngai ata mosali nasalaka mosala na eklesia eh (Po ete nabika oh)
Zua ngai ata mosali natambolaka partout, nateya liloba eh (Po ete nabika oh)
(Chorus)
Ngai eh naye na Yesu eh po ete nabika oh (Po ete nabika oh)
Ngai oyo nazongeli Papa po ete nabika oh (Po ete nabika oh)
Hmm nazongi ndako ya baboti (Po ete nabika oh)
Ima eh naye na Yesu eh (Po ete nabika oh)
Ima eh nazongi ndako eh (Po ete nabika oh)