(Verse)
Marie, nga nakokamwa tina nini yango
Bula ntulu ekoti na mboka
Ozali lelo élevée
Ezali Nzambe moto akopesaka elevation
Okomi lelo na mbongo
Yebaka Nzambe moto akopesaka ba moyens
Omati lelo avion
Ezali Nzambe moto akopesaka ba voyages
(Verse)
Papa naloba nini nga Misamu eh?
Nini naza na yango ewuti na Nzambe te?
Molimo na nga kumisa Ye (Nkolo Yesu)
(Verse)
Ozali lelo mariée
Ezali Nzambe moto akopesaka libala
Okomi lelo na bana
Yebaka Nzambe moto akopesaka mpe mabota
Olati lelo kitoko
Ezali Nzambe moto akopesaka makoki
(Verse)
Nasalako ba fières pona nini eh?
Nini naza na yango ewuti na Nzambe te?
Molimo na nga sanjola Ye (Nkolo Yesu)
(Verse)
Ozali lеlo Pasteur
Ezali Nzambe moto akopesaka vocation
Okomi lеlo minister
Yebaka Nzambe moto asalaka selection
Ozui lelo diplôme
Yebaka Nzambe moto asalaki bongo na yo
(Verse)
Natutako mpe tolo pona nini eh?
Nini naza na yango ewuti na Nzambe te?
Molimo na nga kumisa Ye (Nkolo Yesu)
(Chorus)
Yesu
Molimo na nga kumisa Yesu eh (Nkolo Yesu)
Akosaka te fidèle na ngai oh (Yesu)
Papa Mombaya, soki naza boye pona Ye (Nkolo Yesu)
Alokotaki ngai na potopoto eh (Yesu)
Soki naza kobika boye pona Ye (Nkolo Yesu)
Alangwisa motema na nga (Yesu)
Yesu’ango aza kitoko eh ah (Nkolo Yesu)
Papa na bana eh mobali kitoko eh (Yesu)
Eh nga nakima wapi eh? Nabatama wapi eh? (Nkolo Yesu)
Fidèle ya motema na ngai (Yesu)
Papa’a bana eh Papa eh (Nkolo Yesu)
Nakolanda Yesu Masiya eh (Yesu)
Papa’a bana ebele Papa kitoko eh (Nkolo Yesu)
Ye moto atelemaka moto ya suka na bomoyi na ngai oh (Yesu)
A changea nga sens ya vie (Nkolo Yesu)
Aha Nkolo Yesu eh nalingi Yo (Yesu)