Loyembo ya Mitema Chords by Mike Kalambay

(Verse)
To pusani liboso nayo to memi mbeka ya masanjoli
yamba loyembo ya ba Bulami to bonjeli yo nzambe na bomoyi
kiti na yo eza ya seko Mokonzi nayo ya libela
ozali nzambe tozo yembela kombo na yo EMMANUEL

(Chorus)
To kumambeli yo mobikisi mokeli ya Likolo se
moboko esimbi kondima ya ba santu eza yo yesu
To kumambeli yo mobikisi mokeli ya Likolo se
moboko esimbi kondima ya ba santu eza yo yesu
Bipayi yo ofandi yamba loyembo ya mitema
Maboko totomboli likolo hosanna kembo nayo

(Verse)
Na ekulusu makila etangi mokonzi yesu amipesi mbeka
elemba ya pe lelo Epasuki tozui bosombi liboso na yawhé (Na yango)
Sango malamu ekomeli biso tongo tongo masiya Asekwi
aza lisusu na lilita te alongi liwa aza na bomoyi

(Chorus)
Lilita etikali polele masiya yesu Asekwi
oyo nionso ya ngai ekufaki esekwi elongo naye
Lilita etikali polele masiya yesu Asekwi
oyo nionso ya ngai ekufaki esekwi elongo naye
Bipayi ofandi yamba loyembo ya mitema 0
maboko Totomboli likolo hosanna kembo nayo

(Chorus)
Mobikisi ya mabota ya mokili to Belemi
to sopi mitema na biso liboso na yo

(Chorus)
To kumambeli yo mobikisi mokeli ya Likolo se
moboko esimbi kondima ya ba santu eza yo yesu
Lilita etikali polele masiya yesu Asekwi
oyo nionso ya ngai ekufaki esekwi elongo naye
Bipayi ofandi yamba loyembo ya mitema
maboko Totomboli likolo hosanna kembo nayo

Leave a Reply