Nkolo Obengaki Nga Chords by EC

(Verse)
Nkolo obengaki ngayi
Po n’a suka n’a nzela te
Nakoma kino na suka ah
Ya mobembo na nga
Bongo y’olakaki ngayi
Éte oyokitika nga te
Éte y’oko zala na nga
Kino suka ya nzela

(Chorus)
Ata na kati ya mayi
Ba mbonge pe mipepe
Y’otikaki ba yekoli te
Yonde obengaki bango
Sala ndenge moko na nga
Wana mipepe ekoya
Bomba ngayi na ngolu nayo
Kino suka ya nzela

(Verse)
Y’okambaki Israël
Butu na likonzi ya moto
Moyi n’a lipata ya kembo
Kino mboka elaka
Lelo oyo oko kamba ngayi
N’a sengi été miso na nga
Emona lipata ya kembo
Fanda se kati na motema na nga

(Chorus)
oyebi motema oyo ooh
Elikia mobimba se nayo ooh
Soki yote nzambe na nga eh
Nan’iakoki ko sunga ngayi
Wana nako bondelaka
Pesa eyano nkolo
Nayebaka tango nioso
Éte y’otiki nga te
Si tu peux me cacher en toi
Jusqu’à la fin de l’épreuve
Je te serais toujours fidèle
Quand tu m’appelleras
Je ne veux pas aller loin de toi
Si la confusion et la mort
Auprès de toi je veux être
Avec tout le mien

(Chorus)
Batela bomoyi na nga (yesu)
Kati nayo nkolo
Kino suka ya nzela
Wana y’okobenga nga
Nakoma epayi nayo
Koyemba elonga nayo
Ko kumisa yesu
Seko na seko
Ata na kati ya mayi
Ba mbonge pe mipepe
Y’otikaki petelo te
Yonde obengaki bango
Sala ndenge moko na nga
Wana mipepe ekoya
Bomba ngayi na ngolu nayo
Kino suka ya nzela

Leave a Reply