Difference Chords by Prince Mbuyi

(Verse)
mayi ya miso ekoma bileyi
kolela butu moyi na vie na ngai
oyo ya motema nani akoyoka
komi okufela se ngai moko
epourtant bomoye nanga mobimba
na mitika na tempelo nayo
nani akoki koloba na tina na ngai
po pasi oyo eleki mingi eh,
nani akoki kokata likambo na ngai
po ngai oyo nazua kiiimya

(Chorus)
David alobaki eh, uta abota mati akola,
nano amonate moyengebene akelela
ata bokitani naye oh
ezanga lipa awa nase na moyi,
kasi oyo nini ezokomela ngai eh
kasi oyo nini ezokomela ngai ah

(Verse)
Ba oyo bayebi yo te eh ya bango misala ezofuluka eh
ba oyo bazo tambola na molili kelasi na bango ezo kende liboso
ba oyo bazo tosa malako nayo te misala ya
maboko na bango ezo tambola na kimya
kasi po nini te ngai na ndima ko kumba na ngai nayo eh,
le projet de bonheur et de paix yo laka na ngai
kino mokolo nini eh

(Chorus)
David alobaki eh, uta abota mati akola,
nano amonate moyengebene akelela
ata bokitani naye oh
ezanga lipa awa nase na moyi,
kasi oyo nini ezokomela ngai eh
kasi oyo nini ezokomela ngai ah

(Chorus)
Kasi wapi difference olobaki eh
Difference olobi eh eza wapi eh

Leave a Reply