(Verse)
Pona manso osaleli nga
Ngáí natondi yo Nkóló
Bato ya mokili balingi lokúmu eh,
kasi ba bongi nangó té
Tika mongóngó oyo opesi nga
eyémbela sé yo
Tálá satána asílí mayele nyonso,
bibomba bomba abombi ngáí eh
Ah y’oza malamu eh
Ah y’oza bolingo oh
(Pre-chorus)
Pona manso osaleli na pesá yo nini
Na pesi Yo Elaka
(Chorus)
Na pesi elaká ya kosalela yo pô Yo mpé osaleli nga ya mingi
Yo mókó olobaki salela moníngá oyo olingi báselela yo
Ekokota nga lóla na kopesa merci pô pasi na nga ekosíla
Matondi Nkóló